MOSALA PONA BABELI MPE BABOLA

“Precious Present Truth” inc; ejali kolanda lotomo ya Kilisito. Nzoka nde Kilisito na mokili oyo ajalaki na mosala ya kosunga bato bakelela, na molimo se moko, “ Precious Present Truth Ministry”, esilaki kobanda kosunga bana ya kibeka ( oyo baliaka malamu te) na Rwanda. Tojali kopesa biloko ya kolia mbala misatu na mokolo (tongo, zanga mpe pokua) na bana oyo bajali kolia malamu te, mpe na tango wana tojali koteya sango malamu tongo nionso na baboti oyo bamemelaka biso bana.