Misala na biso

who we are

ornament1

Precious Present Truth, inc (PPT) ejali lisanga ya litomba ya mbongo te ya bandimi bapanzi sango malamu ya bazeli Nkolo ya mokolo ya sambo oyo bazui mokano ya kopanza sango ya ba anjelu misatu elongo na baye Afrika. Tozo teya nsango ya ba anjelo misato ya Emoniseli 14 na baye Afrika na ba lokota na bango ya mbotama na njela ya bitando, makomi mpe mateya liboso ya bato Tojali kondima mpe kosunga mosala ya bokambami monene ya lingomba ya bazeli Nkolo ya mokolo ya sambo mpe likanisi na yango ya komikotisa ya bandimi nionso na mosala oyo na lopoto na mukuse babengi (TMI). Na Kinshasa, PPT elongo na bokambami ya engumba mokonzi ya kuna, esilaki koyamba milulu ya bopanzi sango na njela ya bateyi ya libanda ya mboka kowuta mikili ya mputu oyo basala mosala yango mingi. Nzambe asilaki kopambola milulu oyo na komona bato 360 kobatisama.

Mosala na biso :
” Kokabola ba bosolo ya bibilia mpe lobiko elongo na baye Afrika na ba lokota na bango ya momesano to bandinga na bango.”
Mokano na biso:
“Sango ya ba anjelu misatu esila kozinga mokili mobimba po ete tozonga kala mingi ten a ndaku.”

BOPANZI

ornament1

PPT ajali kopanza solo ya bibilia na bato ya mokili mobimba, baye oyo bajali koyoka bobele bandinga ya Afrika, na njela ya sango bilili ya tv, radio, site web na biso, singa mpe bitando yike ya singa.

Ba manaka na biso ejali koleka na Tv mpe Radio ya Rwanda, RDC mpe na Tanzani, mpe tojali kolykia kojala na tv na biso moko pona kosila kolandama na Afrika Mobimba.

Lotomo na biso ya bopanzi sango malamu epayi nab aye Afrika ejali kofuluka. Tojali kosala yango na balokota motoba: Kinyarwanda, Francais, Anglais, Swahili, Lingala mpe Tshiluba mpe tojali kolykia ete bato ebele na Afrika bakosila kopesa bomoyi na bango epayi na Yesu na njela ya bisalelo na biso.

Motuya lelo ya bato oyo PPT ajali kokomisela bango sango y aba anjelu misato na ba lokota na bango bajali na motango ya miliyona 283, 61

MOSALA PONA BABELI MPE BABOLA

ornament1

“Precious Present Truth” inc; ejali kolanda lotomo ya Kilisito. Nzoka nde Kilisito na mokili oyo ajalaki na mosala ya kosunga bato bakelela, na molimo se moko, “ Precious Present Truth Ministry”, esilaki kobanda kosunga bana ya kibeka ( oyo baliaka malamu te) na Rwanda. Tojali kopesa biloko ya kolia mbala misatu na mokolo (tongo, zanga mpe pokua) na bana oyo bajali kolia malamu te, mpe na tango wana tojali koteya sango malamu tongo nionso na baboti oyo bamemelaka biso bana.

etenyi ya mabele epayi wapi PPT ajali kokoma na mosala na yango

ornament1

Tokofandisa mosala makasi na bitenyi oyo

mosusu

. République Démocratique du Congo

(population 82.24 million)

. Gabon (population 1.98 million)

. Mali (population 17.99 million)

. Côte d’Ivoire (population 23.7 million)

. Uganda (population 41.49 million)

. Tanzania (population 55.57 million)

. Rwanda (population 12.18 million)

. Kenya (population 48.46 million)

. Mpe na ba mboka mosusu ya Afrika

Bantu badi PPT ulenga mu miakulu

bapita miliyona 283,61

Tojali kobondela po été sango ya banjelu misatu epanzana na mokili mobimba, po été tozonga epai na biso kala mingi te.

MOKUMBA

1.Kondimbola na kokende na makomi ya Anglais :

PPT ajali kosalela ndaku na ye moko ya kokanga mateya na bilili to boyoki na Rwanda mpe na RDC pona kondimbola, na maloba oyo ekoyokana, oyo ejalaki na bilili oyo esilaki kokangama na :

  • – Molakisi monene Walter J. Veith
  • Ivor Myers
  • Doug Batchelor
  • Mokonzi Ted N.C Wilson
  • David Asscherick
  • Mpe na bateyi ebele oyo balingaka kopanza sango ya ba anjelu misatu.

Bilili oyo ekoki kozuama na Kinyarwanda, Francais, Swahili, Lingala na Tshiluba. PPT ajali kopanza ba sango na ye na kosomba bisika to ba ngonga na bitando ike to tv ya bato epayi wapi tojali kopanza sango na mboka oyo bajali koloba lokota oyo sango endimbolami mpe tojali kobelemisa ba sango oyo na singa na biso ya You tube mpe ba botangi mosusu na njela ya singa. Kino lelo singa na biso ya you tube ejali kotalama epayi na bato 3 000,000 na mokolo.

2 Kondimbola mpe kokoma pona kokabolela:

Na boyokani na Union ya Congo Ouest, to ndimboli ba buku kolongua na lokota ya Anglais na Kinyarwanda, Lingala, Swahili mpe Francais mpe tokomi yango pona kokabola oyo elandi :

  • Solo ya motuya ya Molakisi Walter J.Veith
  • Mabongisi ya Ivor Myers
  • Epayi na Yesu ya Ellen G White
  • Ba mpaka mpe Basakoli ya Ellen G White
  • Basakoli mpe Bakonzi ya Ellen G. White
  • Misala y aba Ntoma (Balongi ya kimia) ya Ellen G.White

Babuku mosusu ebele ya Ellen G.White na lingala, Swahili mpe Tshiluba ejali kondimbolama. Tojali kosala elongo na bakambi ya bilanga ya Nkolo y aba mboka ya Afrika pona kokabola na njela ya bapanzi sango na njela ya mikanda y aba mboka yina.

3. Bojali na yango ya ebandeli na ba lokota ya mbotama ya Afrika

PPT asilaki kosala boyokani na bateyi ya bikolo to ba mboka na kati ya Afrika pona kokanga na sing aba sango ya motuya mpe kopanza yango na njela ya bitando ya tv ya baton a Afrika. Na yango, ba koto na koto ya bato bajali kobatisama mpe kokoma baye lingomba ya banjeli Nkolo, na lolenge etshiami pembeni na RDC.
PPT asili kokanga na singa mpe ajali kokoba kosala ba buku na njela ya maloba ya koyoka ya Ellen White na Kinyarwanda, Swahili, Lingala mpe Tshiluba na babuki oyo esilaki kokangama na singa lokola:
. -Bampaka mpe basakoli
. -Basakoli mpe bakonzi
. -Bosenga ya bikeke
. -Misala y aba ntoma ( Balongi ya kimia)
. -Likama ya bikeke
. -Bobokoli
. -Milulu ya mokolo ya suka
. -Batoli na maye etaleli kolia
. Lotomo ya lobiko mpe biloko mosusu.
PPT ajali kosenga bato balanda na bilili ya mateya ya You tube pona lokota nionso na bato koleka 3,000,000 oyo bajali kolanda sanza nionso.

4. Bolandi ya “ PPT”

PPT asili kolengela singa moko oyo ebengami “ Precious Present Truth” oyo okoki kobenda na njela ta elobeli na yo na pamba na njela ya Google Play store. Na njela oyo, ojali kokota na Bibilia ya koyoka, ba buku ya koyoka ya makomi ya Ellen G.White mpe na ba mateya ebele, na bakota to ndinga mutoba

BOLANDANI YA BAPANZI SANGO

Tojali kobongisa kobengisa bateyi ya malamu ya banjeli Nkolo ya mokili mobimba baya koteya na Afrika, mpe na ntango wana lisusu lisanga na biso ya bokangi mateya na singa ekosila kokanga mateya oyo po ete esila kotshiama na bitando ya tv mpe bilobeli ya singa.
Nzambe apamboli biso na mosala oyo na kosila komema milema ebele epayi na Ye, tojali na tembe moko te ete akosila kosala koleka oyo biso nanu tokanisi te.

KOTUTA

Lisolo moko ewuti koleka: baye mboka ya Tshela, mboka moko na kati ya Kongo Central na RDC? Basilaki kolanda sango y aba anjelu misatu na Digital Congo TV, oyo ejali etando moko monene oyo elandamaka mingi na Congo. Sango esilaki kotambola na mboka oyo, ntango moto moko alandi akeyi ,koyebisa mosusu, bakomaki kolanda njela moko manaka oyo. Na bongo basilaki kondimisama ete esengeli bapemaka mokolo ya sabata, basanganaki bango nionso mpe basilaki kobenga bilo ya Uniona ya Congo Ouest pona kotuna bisika nini bakoki komona lingomba ya banjeli Nkolo ya mokolo ya sambo na nzinga-nzinga. Bakambi ya lingomba bamonaki ete lingomba ejalaki te na Tshela; na lombango lingomba esilaki kotinda bapanzi sango pona kosunga bandimi ya sika. Sima ya bango kokoma kuna, baboti oyo bajalaki na bana kuna basengaki na bapanzi sango oyo: “ Tondimisami ete esengeli topema mokolo ya sabata, kasi bana na biso bajali kokende kilasi mokolo ya sabata, mpe toyebi sik’awa ete esengeli bapema mokolo ya sabata, tokosala ndenge nini pona kotika bango bapema mokolo ya sabata?” Bakambi sango malamu basilaki kotuna soki bana oyo balingi kopema mokolo ya sabata bajali boni. Sima ya mikolo baboti bazongaki koyebisa bango ete motango ya bana ejali 450. Lingomba esilaki kobongama mpe kolengela esika pene na bisika oyo bajalaki kobondela mokolo ya sabata mpe basilaki kofongola eteyelo ya sika na mboka pona bana. Atako bana oyo bajali koyekola na ba lolenge ya pasi, po ete bajali na bisika etongami malamu te, bajali kotonda Nzambe mpe kopesa ye lokumu mokolo ya sabata.