
Mateya
PPT ajali kosalela ndaku na ye moko ya kokanga mateya na bilili to boyoki na Rwanda mpe na RDC pona kondimbola, na maloba oyo ekoyokana, oyo ejalaki na bilili oyo esilaki kokangama na :
- Molakisi monene Walter J. Veith
- Ivor Myers
- Doug Batchelor
- Mokonzi Ted N.C Wilson
- David Asscherick
- Mpe na bateyi ebele oyo balingaka kopanza sango ya ba anjelu misatu.
Bilili oyo ekoki kozuama na Kinyarwanda, Francais, Swahili, Lingala na Tshiluba. PPT ajali kopanza ba sango na ye na kosomba bisika to ba ngonga na bitando ike to tv ya bato epayi wapi tojali kopanza sango na mboka oyo bajali koloba lokota oyo sango endimbolami mpe tojali kobelemisa ba sango oyo na singa na biso ya You tube mpe ba botangi mosusu na njela ya singa. Kino lelo singa na biso ya you tube ejali kotalama epayi na bato 3 000,000 na mokolo.