Misala na biso

Misala na biso

Misala na biso

Precious Present Truth, inc (PPT) ejali lisanga ya litomba ya mbongo te ya bandimi bapanzi sango malamu ya bazeli Nkolo ya mokolo ya sambo oyo bazui mokano ya kopanza sango ya ba anjelu misatu elongo na baye Afrika. Tozo teya nsango ya ba anjelo misato ya Emoniseli 14 na baye Afrika na ba lokota na bango ya mbotama na njela ya bitando,  makomi mpe mateya liboso ya bato Tojali kondima mpe kosunga mosala ya bokambami monene ya lingomba ya bazeli Nkolo ya mokolo ya sambo mpe likanisi na yango ya komikotisa ya bandimi nionso na mosala oyo na lopoto na mukuse babengi (TMI). Na Kinshasa, PPT elongo na bokambami ya engumba mokonzi ya kuna, esilaki koyamba milulu ya bopanzi sango na njela ya bateyi ya libanda ya mboka kowuta mikili ya mputu oyo basala mosala yango mingi. Nzambe asilaki kopambola milulu oyo na komona bato 360 kobatisama.

vlcsnap 2021 02 02 09h45m42s526

Mosala na biso :

Kokabola ba bosolo ya bibilia mpe lobiko elongo na baye Afrika na ba lokota na bango ya momesano to bandinga na bango

Mokano na biso

Sango ya ba anjelu misatu esila kozinga mokili mobimba po ete tozonga kala mingi ten a ndaku.

BOPANZI

PPT ajali kopanza solo ya bibilia na bato ya mokili mobimba, baye oyo bajali koyoka bobele bandinga ya Afrika, na njela ya sango bilili ya tv, radio, site web na biso, singa mpe bitando yike ya singa.

Ba manaka na biso ejali koleka na Tv mpe Radio ya Rwanda, RDC mpe na Tanzani, mpe tojali kolykia kojala na tv na biso moko pona kosila kolandama na Afrika Mobimba.

vlcsnap 2021 02 02 09h45m22s206

Lotomo na biso ya bopanzi sango malamu epayi nab aye Afrika ejali kofuluka. Tojali kosala yango na balokota motoba: Kinyarwanda, Francais, Anglais, Swahili, Lingala mpe Tshiluba mpe tojali kolykia ete bato ebele na Afrika bakosila kopesa bomoyi na bango epayi na Yesu na njela ya bisalelo na biso.

Motuya lelo ya bato oyo PPT ajali kokomisela bango sango y aba anjelu misato na ba lokota na bango bajali na motango ya miliyona 283, 61

MOSALA PONA BABELI MPE BABOLA

Precious Present Truth” inc; ejali kolanda lotomo ya Kilisito. Nzoka nde Kilisito na mokili oyo ajalaki na mosala ya kosunga bato bakelela, na molimo se moko, “ Precious Present Truth Ministry”, esilaki kobanda kosunga bana ya kibeka ( oyo baliaka malamu te) na Rwanda. Tojali kopesa biloko ya kolia mbala misatu na mokolo (tongo, zanga mpe pokua) na bana oyo bajali kolia malamu te, mpe na tango wana tojali koteya sango malamu tongo nionso na baboti oyo bamemelaka biso bana.

P2490103 scaled 1
PPT Working area map 1

etenyi ya mabele epayi wapi PPT ajali kokoma na mosala na yango

Tokofandisa mosala makasi na bitenyi oyo mosusu:

MOKUMBA

BOLANDANI YA BAPANZI SANGO

Tojali kobongisa kobengisa bateyi ya malamu ya banjeli Nkolo ya mokili mobimba baya koteya na Afrika, mpe na ntango wana lisusu lisanga na biso ya bokangi mateya na singa ekosila kokanga mateya oyo po ete esila kotshiama na bitando ya tv mpe bilobeli ya singa.
Nzambe apamboli biso na mosala oyo na kosila komema milema ebele epayi na Ye, tojali na tembe moko te ete akosila kosala koleka oyo biso nanu tokanisi te.

 

KOTUTA

Lisolo moko ewuti koleka: baye mboka ya Tshela, mboka moko na kati ya Kongo Central na RDC? Basilaki kolanda sango y aba anjelu misatu na Digital Congo TV, oyo ejali etando moko monene oyo elandamaka mingi na Congo. Sango esilaki kotambola na mboka oyo, ntango moto moko alandi akeyi ,koyebisa mosusu, bakomaki kolanda njela moko manaka oyo. Na bongo basilaki kondimisama ete esengeli bapemaka mokolo ya sabata, basanganaki bango nionso mpe basilaki kobenga bilo ya Uniona ya Congo Ouest pona kotuna bisika nini bakoki komona lingomba ya banjeli Nkolo ya mokolo ya sambo na nzinga-nzinga. Bakambi ya lingomba bamonaki ete lingomba ejalaki te na Tshela; na lombango lingomba esilaki kotinda bapanzi sango pona kosunga bandimi ya sika. Sima ya bango kokoma kuna, baboti oyo bajalaki na bana kuna basengaki na bapanzi sango oyo: “ Tondimisami ete esengeli topema mokolo ya sabata, kasi bana na biso bajali kokende kilasi mokolo ya sabata, mpe toyebi sik’awa ete esengeli bapema mokolo ya sabata, tokosala ndenge nini pona kotika bango bapema mokolo ya sabata?” Bakambi sango malamu basilaki kotuna soki bana oyo balingi kopema mokolo ya sabata bajali boni. Sima ya mikolo baboti bazongaki koyebisa bango ete motango ya bana ejali 450. Lingomba esilaki kobongama mpe kolengela esika pene na bisika oyo bajalaki kobondela mokolo ya sabata mpe basilaki kofongola eteyelo ya sika na mboka pona bana. Atako bana oyo bajali koyekola na ba lolenge ya pasi, po ete bajali na bisika etongami malamu te, bajali kotonda Nzambe mpe kopesa ye lokumu mokolo ya sabata.

PPT ajali kopanza solo ya bibilia na bato ya mokili mobimba, baye oyo bajali koyoka bobele bandinga ya Afrika, na njela ya sango bilili ya tv, radio, site web na biso, singa mpe bitando yike ya singa.

Ba manaka na biso ejali koleka na Tv mpe Radio ya Rwanda, RDC mpe na Tanzani, mpe tojali kolykia kojala na tv na biso moko pona kosila kolandama na Afrika Mobimba.

Lotomo na biso ya bopanzi sango malamu epayi nab aye Afrika ejali kofuluka. Tojali kosala yango na balokota motoba: Kinyarwanda, Francais, Anglais, Swahili, Lingala mpe Tshiluba mpe tojali kolykia ete bato ebele na Afrika bakosila kopesa bomoyi na bango epayi na Yesu na njela ya bisalelo na biso.

Motuya lelo ya bato oyo PPT ajali kokomisela bango sango y aba anjelu misato na ba lokota na bango bajali na motango ya miliyona 283, 61

Contact Us (DRC):

Centre de diffusion de la Chaine PPT TV:

Goma: Rond Point Tshukudu, Boulevard Kanyamuhanga – Commune de Goma

Watch Our Broadcast on:

Kinyarwanda: TV1 (Canal + 383) via (Canal + 386)
Every Saturday 3-4pm (Kigali Time)
Every Sunday 2-3pm (Kigali Time)

Contact Us (Rwanda):

Adresses:

WhatsApp/Rwanda: